Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 23:30 - Mokanda na Bomoi

30 Basoda ya Joziasi bamemaki ebembe na ye na likolo ya shar, longwa na Megido kino na Yelusalemi epai wapi bakundaki ye kati na kunda na ye moko. Bato ya mokili bazwaki Yoakazi, mwana mobali ya Joziasi, bapakolaki ye mafuta mpe bakomisaki ye mokonzi mpo na kokitana na tata na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 23:30
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nyonso ya Yuda bakamataki Azaria oyo azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama mpe bakomisaki ye mokonzi na esika ya tata na ye, Amatsia.


Bongo bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki mokonzi Amoni likita mpe bakomisaki Joziasi, mwana na ye ya mobali, mokonzi na esika na ye.


Mpo na yango, nakosala ete okende kokutana na bakoko na yo ; mpe okokundama na kimia kati na moko na bakunda na yo. Na bongo, miso na yo ekomona te pasi nyonso oyo nakotindela esika oyo. » Batindami bakomisaki eyano oyo epai ya mokonzi.


Basali na ye bamemaki ye na shar kino na Yelusalemi mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na kunda na ye kati na engumba ya Davidi.


Sima na makambo oyo nyonso mpe sima na Joziasi kobongisa Tempelo ya Yawe, Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki kobundisa Karikemishi, na ebale Efrate ; mpe Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela.


Basoda na ye balongolaki ye na shar oyo azalaki kobunda na yango, batiaki ye na shar na ye mosusu mpe bamemaki ye na Yelusalemi epai wapi akufaki. Bakundaki ye kati na bakunda ya batata na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi basalelaki Joziasi matanga.


Bolela te mpo na kufa ya mokonzi to bosala matanga te mpo na kufa na ye ! Bolela, bolela nde makasi mpo na ye oyo akei na bowumbu, mpo ete akozonga lisusu te mpe akomona lisusu te mboka epai babota ye.


Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Shalumi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, oyo akitanaki na Joziasi, tata na ye, lokola mokonzi ya Yuda, kasi atikaki mboka na ye : « Akozonga lisusu te.


« Bongo yo, tinda nzembo ya mawa mpo na bakambi ya Isalaele mpe loba :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ