2 Bakonzi 23:29 - Mokanda na Bomoi29 Tango Joziasi azalaki mokonzi, Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki na ebale Efrate mpo na kosunga mokonzi ya Asiri. Mokonzi Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela, kasi Neko abundisaki ye mpe abomaki ye, na Megido. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kati na Isakari mpe Aseri, Manase azwaki Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Yibileayimi elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Eyini-Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Taanaki elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe Megido elongo na bamboka na yango ya mike-mike (engumba ya misato, kati na molongo, ezali Nafoti).
Kasi bato ya libota ya Manase babenganaki te bato ya Beti-Sheani mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Taanaki mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Dori mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Yibileayimi mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Megido mpe bamboka na yango ya mike ; pamba te bato ya Kanana batingamaki kaka kovanda na mokili yango.