Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 23:26 - Mokanda na Bomoi

26 Nzokande, Yawe atikaki te kanda makasi na Ye, oyo apeliselaki Yuda likolo ya mabe nyonso oyo Manase asalaki mpo na kopesa Ye kanda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 23:26
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai, mpo na bato mpe mpo na Yuda mobimba, na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana. Pamba te kanda ya Yawe, oyo epeleli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te maloba ya buku yango mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na yango.


Yawe atindaki mampinga ya bato ya Chalide, ya Siri, ya Moabi mpe ya Amoni mpo na kobundisa ye. Yawe atindaki bango mpo na kobebisa Yuda kolanda liloba oyo Yawe asakolaki na nzela ya basali na Ye, basakoli.


Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika ya elongi na Ye. Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni.


Solo, makambo yango ekomelaki Yuda kolanda mitindo na Yawe mpo na kolongola bango na miso na Ye likolo ya masumu ya Manase mpe likolo ya makambo nyonso oyo asalaki ;


bakisa makila oyo asopaki, makila ya bato oyo bayebi likambo te. Pamba te atondisaki Yelusalemi na makila ya bato oyo bayebaki likambo te ; mpe Yawe aboyaki kolimbisa ye.


Sima na makambo oyo nyonso mpe sima na Joziasi kobongisa Tempelo ya Yawe, Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki kobundisa Karikemishi, na ebale Efrate ; mpe Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela.


Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe.


Tika ete bakambi na biso batikala awa na esika ya lisanga mobimba ! Mpe tika ete bato nyonso oyo, kati na bingumba na biso, babalaki basi ya bapaya bakende liboso ya bakambi mpe basambisi ya engumba moko na moko, na mikolo oyo bakokatela bango, kino kanda makasi ya Nzambe na biso ekolongwa kati na biso na tina na likambo yango.


Kanda ya Yawe ekokita te kino ekokokisa malamu-malamu penza mabongisi ya motema na Ye ! Bokozwa mayele ya kososola yango malamu na mikolo oyo ekoya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ