2 Bakonzi 23:19 - Mokanda na Bomoi19 Ndenge asalaki na Beteli, Joziasi abukaki bisika nyonso ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba oyo bakonzi ya Isalaele batongaki kati na bingumba ya Samari, oyo na tina na yango Yawe asilikaki makasi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango feti nyonso esilaki, bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kuna bakendeki na bingumba ya Yuda, babukaki makonzi ya bule, bakweyisaki bikeko ya nzambe mwasi Ashera mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo kati na Yuda nyonso, kati na Benjame, kati na Efrayimi mpe kati na Manase. Sima na kobebisa biloko wana nyonso, bato ya Isalaele bazongaki kati na bingumba na bango mpe bandako na bango.