Mosakoli ya mobange atombolaki ebembe ya moto na Nzambe, atiaki yango na likolo ya ane mpe amemaki yango na engumba na ye mpo na kosalela ye matanga mpe kokunda ye.
Sima na kokunda ye, alobaki na bana na ye ya mibali : — Tango nakokufa, bokokunda ngai kati na lilita epai wapi bakundi moto na Nzambe ; bokotia mikuwa na ngai pembeni ya mikuwa na ye.