Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 23:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mokonzi apanzaki mpe bisambelo ya likolo ya bangomba oyo ezalaki na este ya Yelusalemi, na ngambo ya loboko ya mobali ya ngomba ya Libebi, oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, atongaki mpo na Asitarite, nzambe mwasi ya makambo mabe ya bato ya Sidoni ; mpo na Kemoshi, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Moabi ; mpe mpo na Moloki, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Amoni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 23:13
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakosala bongo, pamba te basundolaki Ngai mpe bagumbamelaki Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Kemoshi, nzambe ya bato ya Moabi ; mpe Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, batambolaki te na banzela na Ngai mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai, kobatela malako mpe mibeko na Ngai, ndenge Davidi, tata ya Salomo, asalaki.


Salomo akomaki kosambela ekeko ya Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni.


Na ngomba oyo etalani na Yelusalemi, Salomo atongaki esambelo ya likolo ya ngomba mpo na Kemoshi, nzambe ya mbindo ya Moabi ; mpe mpo na Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni.


Ezalaki penza na nzela ya mabala ya boye nde Salomo, mokonzi ya Isalaele, akweyaki na masumu. Nzokande, kati na ebele ya bikolo ya bapaya, ezalaki na mokonzi moko te oyo akokanaki na ye ! Nzambe na ye azalaki kolinga ye mpe atiaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba, kasi basi ya bapaya bakweyisaki ye na masumu.


Moko te akanisaka, moko mpe te azalaka na boyebi mpe na mayele mpo na koloba : « Na nzela ya ndambo na yango, napelisaki moto, nabelisaki mapa na makala na yango ya moto, natumbaki mosuni mpe naliaki yango. Bongo mpo na oyo etikali, nasala na yango penza likambo ya nkele boye ? Nafukamela penza mwa eteni ya nzete ? »


Oh Yuda, ozali na banzambe ebele ndenge ezali motango ya bingumba na yo ; mpe lisusu, bitumbelo oyo otongaki mpo na kotumbela nzambe Bala, nzambe ya soni, malasi ya ansa ezali ebele ndenge ezali motango ya babalabala ya Yelusalemi. »


Boye, Moabi ekoyoka soni likolo ya Kemoshi ndenge bato ya Isalaele bayokaki soni tango batiaki mitema na Beteli.


« Kobebisama ya Moabi ezali na nzela, pasi na yango ekoya na lombangu penza.


Lokola bozali kotia mitema na misala na bino mpe na bomengo na bino, bino mpe bokokende na bowumbu ; boye Kemoshi mpe akokende na bowumbu elongo na Banganga-Nzambe mpe bakambi na ye.


bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako mpo na kosambela mampinga ya likolo, bato nyonso oyo bagumbamaka na kolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe na kombo na nzambe Moloki,


Oh Moabi, mawa na yo ! Oh bato ya Kemoshi, bobebisami ! Bakomisaki bana na ye ya mibali bakimi ; mpe bana basi na ye, bakangami ya mokonzi Sikoni, mokonzi ya Amori.


Bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe ; basalelaki banzambe Bala, Asitarite, mpe banzambe ya Siri, ya Sidoni, ya Moabi, ya Amoni mpe ya Filisitia. Basundolaki Yawe mpe basalelaki Ye lisusu te.


Boni, okozwa te oyo Kemoshi, nzambe na yo, apesi yo ? Biso tokozwa oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso.


pamba te basundolaki Yawe mpo na kosalela banzambe Bala mpe Asitarite.


Bongo bagangaki lisusu epai na Yawe mpo na kosenga lisungi ; balobaki : « Tosali masumu, pamba te tosundoli Yawe mpe tosaleli banzambe Bala mpe Asitarite. Kasi sik’oyo, kangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe tokosalela Yo. »


Bato ya Isalaele balongolaki kati na bango banzambe Bala mpe bikeko ya Asitarite, mpe basalelaki kaka Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ