2 Bakonzi 23:10 - Mokanda na Bomoi10 Mokonzi apanzaki etumbelo ya Tofeti, oyo ezalaki na Lubwaku ya Beni-Inomi mpo ete moto moko te asalela yango lisusu mpo na kotumba mwana na ye ya mobali to ya mwasi lokola mbeka epai ya Moloki. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bakomaki kotonga bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na Bala, na Lubwaku ya Beni-Inomi, mpo na kobonza bana na bango ya mibali mpe ya basi epai ya Moloki ; ezali likambo oyo Ngai natikalaki kotinda bango te, mpe natikala kokanisa te ete bakoki kosala makambo ya nkele boye mpo na komemisa Yuda masumu.
Tango bozali kobonza makabo na bino, mbeka ya bana na bino ya mibali na moto, bozali kokoba komikomisa mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko kino na mokolo ya lelo. Oh libota ya Isalaele ; boni, namitika ete botuna toli epai na Ngai ? Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakotika te ete botuna Ngai.