Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 22:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bongo Shafani, mokomi mikanda, akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye : — Basali na yo bapesi mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe epai ya batambolisi misala na yango,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 22:9
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

babelelaki mokonzi. Mpe Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, babimaki mpo na kokutana na bango.


mpe Nganga-Nzambe Ilikia apesi ngai buku moko. Mpe Shafani atangaki buku yango liboso ya mokonzi.


mpe apesaki mitindo oyo epai ya Nganga-Nzambe Ilikia, epai ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, epai ya Akibori, mwana mobali ya Mishe, epai ya Shafani, mokomi mikanda, mpe epai ya Asaya, moko kati na bakalaka ya mokonzi :


Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, atindaki Shafani, mokomi mikanda na ye, mwana mobali ya Atsalia mpe koko ya Meshulami, na Tempelo ya Yawe. Alobaki na ye :


Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, alobaki na Shafani, mokomi mikanda : — Namoni buku ya Mobeko kati na Tempelo ya Yawe. Ilikia apesaki buku yango epai ya Shafani, mpe Shafani atangaki yango.


Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami mpe koko ya Shafani, lokola moyangeli ya bato oyo atikaki kati na mokili ya Yuda.


Nzokande Ayikami, mwana mobali ya Shafani, abatelaki Jeremi ; boye akabamaki te na maboko ya bato mpo ete baboma ye.


Apesaki mokanda yango na maboko ya Eleasa, mwana mobali ya Shafani ; mpe na maboko ya Gemaria, mwana mobali ya Ilikia. Ezali bango nde Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki na Babiloni epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni. Mokanda yango elobaki boye :


batindaki ete bazwa Jeremi kati na lopango ya mokonzi mpe bapesaki ye na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, mpo ete azongisa ye na ndako na ye. Boye Jeremi awumelaki kati na bato na ye.


Tango Bayuda nyonso oyo bakimelaki na mokili ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi mpe na mikili mosusu bayokaki ete mokonzi ya Babiloni atikaki ndambo ya bato kati na Yuda mpe akomisaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, moyangeli na bango,


Isimaeli, mwana mobali ya Netania, elongo na basoda wana zomi oyo bazalaki elongo na ye babomaki na mopanga Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, oyo mokonzi ya Babiloni akomisaki moyangeli kati na mokili.


Bongo, liboso na yango, bakambi tuku sambo ya libota ya Isalaele batelemaki ; mpe moko na moko kati na bango asimbaki mbabola oyo batumbelaka malasi : ezalaki kobimisa milinga ya solo ya ansa. Yazania, mwana mobali ya Shafani, azalaki mpe elongo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ