Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 22:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tika ete bapesa mbongo yango na maboko ya batambolisi misala ya Tempelo ya Yawe mpo ete bafuta basali oyo bazali kobongisa yango :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 22:5
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Joasi alobaki na Banganga-Nzambe : « Bosangisa mbongo nyonso oyo bamemi lokola makabo ya bule kati na Tempelo ya Yawe : mbongo oyo bazwi na nzela ya kotanga bato, mbongo oyo bazwi lokola mpako mpo na kosikola bato kolanda motuya oyo ekatama, mpe mbongo oyo moto na moto apesi na Ndako ya Nzambe na motema ya esengo.


basharipantie, bangamba mpe batongi ndako. Kaka na mbongo yango, bakosomba lisusu mabaya mpe mabanga bakata mpo na kolendisa Tempelo ya Yawe.


Bakombo ya bana na ye ya mibali, maloba nyonso oyo basakolaki mpo na ye mpe mikano oyo babongisaki mpo na Tempelo ya Nzambe ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi. Amatsia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Nzokande, bana mibali ya Atali, mwasi mabe, batobolaki madusu mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe mpe basalelaki ata bisalelo na yango nyonso ya bule mpo na losambo ya banzambe Bala.


Bapesaki mbongo yango na maboko ya batambolisi misala ya Tempelo ya Yawe. Bato yango bafutaki basali oyo bazalaki kobongisa mpe kolendisa Tempelo yango ;


Bapesaki mbongo epai ya batongi ndako mpe epai ya basharipantie ; bongo bapesaki lisusu bilei, masanga mpe mafuta epai ya bato ya Sidoni mpe ya Tiri mpo ete bamema, na nzela ya ebale monene, banzete ya sedele longwa na Libani kino na Jafa, na ndingisa ya Sirisi, mokonzi ya Persi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ