Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 22:11 - Mokanda na Bomoi

11 Tango mokonzi ayokaki maloba ya buku ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 22:11
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi apasolaki bilamba na ye, alataki saki mpe asalaki matanga mpo na mwana na ye mikolo ebele.


mpe Nganga-Nzambe Ilikia apesi ngai buku moko. Mpe Shafani atangaki buku yango liboso ya mokonzi.


Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Yawe sima na yo koyoka makambo oyo nalobaki, mpo na kotelemela esika oyo elongo na bavandi na yango, ete bakobebisama mpe bakolakelama mabe ; lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, elobi Yawe.


Tango mokonzi ayokaki maloba ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye,


Nalengaka na somo liboso na Yo mpe nabangaka mikano na Yo.


Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.


Tango bayokaki maloba wana nyonso, bakomaki kotalana bango na bango na somo mpe balobaki na Baruki : — Tosengeli penza koyebisa makambo oyo nyonso epai ya mokonzi.


Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te.


Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te. Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, pamba te atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo, abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Yuda, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te babwakaki Mobeko na Ngai, babatelaki te bikateli na Ngai mpe babungaki nzela mpo na kolanda banzambe ya lokuta oyo bakoko na bango balandaki na tango ya kala.


Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ