Bongo Shafani, mokomi mikanda, akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye : — Basali na yo bapesi mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe epai ya batambolisi misala na yango,
Na tango wana, batangaki buku ya Moyize na mongongo makasi mpo ete bato bayoka ; mpe bamonaki ete ekomama boye kati na yango : « Moto ya Amoni mpe moto ya Moabi bakotikala kondimama te kati na lisanga ya Nzambe ;
Mokolo na mokolo, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya suka, Esidrasi azalaki kotanga buku ya Mobeko ya Nzambe. Basepelaki feti mikolo sambo ; mpe na mokolo ya mwambe, kolanda malako ya Mobeko, basalaki mayangani mpo na kosukisa feti.
Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.
Boyoka Liloba na Yawe, bino bato oyo bolengaka liboso ya liloba na Ye : « Bandeko na bino oyo bayina bino mpe baboya bino likolo ya Kombo na Ngai balobi : ‹ Tika ete Yawe amonisa nkembo na Ye mpo ete tokoka komona esengo na bino ! › Kasi bango nde bakosambwa solo.
Boye yo, kende na Tempelo ya Yawe, na mokolo ya kokila bilei, mpe tangela bato maloba ya Yawe, oyo okomaki na mokanda, wana ngai nazalaki koloba na yo ; tangela yango bato nyonso ya Yuda, oyo bakoya wuta na bingumba na bango.