Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 22:1 - Mokanda na Bomoi

1 Joziasi azalaki na mibu mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku misato na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yedida. » Yedida azalaki mwana ya Adaya, moto ya mboka Botsikati.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 22:1
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kolanda etinda na Yawe, moto na Nzambe agangaki makasi mpo na kolakela etumbelo mabe : « Etumbelo, etumbelo ! Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Mwana mobali moko akobotama na ndako ya Davidi, kombo na ye ekozala Joziasi. Akotumba na likolo na yo lokola mbeka banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba, oyo batumbaka ansa na likolo na yo. Mpe na likolo na yo, etumbelo, bakotumba mikuwa ya bato ! › »


Manase azalaki na mibu zomi na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Efitsiba. »


Bongo bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki mokonzi Amoni likita mpe bakomisaki Joziasi, mwana na ye ya mobali, mokonzi na esika na ye.


Bakundaki ye kati na kunda na ye, kati na elanga ya Uza ; mpe Joziasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Oh Yawe, Nkolo na biso, Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba ! Ovandisi nkembo na Yo kati na Lola.


Mawa na mokili oyo mokonzi na yango azali mwana moke, mpe oyo bakambi na yango balangwaka masanga na tongo-tongo !


Nakosala ete bilenge mibali bakoma bakonzi na bango mpe bana mike bakamba bango.


Yawe alobaki na ye tango mokonzi Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi,


Kasi soki, ndakisa, mwana yango azali na mwana oyo, atako amonaka masumu nyonso oyo tata na ye asalaka, kasi asalaka ndenge moko te na tata na ye :


Na tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, azalaki mokonzi ya mokili ya Yuda, Yawe alobaki na Sofoni, mwana mobali ya Kushi, mwana mobali ya Gedalia, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Ezekiasi :


Ezekiasi abotaki Manase ; Manase abotaki Amoni ; Amoni abotaki Joziasi ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ