2 Bakonzi 21:6 - Mokanda na Bomoi6 Abonzaki na moto, lokola mbeka, mwana na ye ya mobali ; asalelaki kindoki, soloka mpe maji. Atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe ; mpe, na bongo, apelisaki kanda ya Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Joziasi abomaki mpe bato oyo basololaka na milimo ya bakufi, bamoni makambo, bikilakila, banzambe ya bikeko, mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na mokili ya Yuda mpe ya Yelusalemi. Asalaki bongo mpo na kokokisa mitindo oyo ekomama kati na buku oyo Nganga-Nzambe Ilikia amonaki kati na Tempelo ya Yawe.
Yawe akosepela solo soki tomemeli Ye minkoko ya bameme ya mibali to soki topesi Ye mafuta ebele lokola mayi ya ebale ? Boni, topesa solo bana na biso ya liboso mpo ete tozwa bolimbisi masumu na biso ? Boni, topesa bana na biso ya mibali oyo bawuti na mikongo na biso mpo ete akoka kolongola masumu na biso ?