2 Bakonzi 21:5 - Mokanda na Bomoi5 Atongaki kati na mapango nyonso mibale ya Tempelo ya Yawe bitumbelo mpo na mampinga nyonso ya likolo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi apesaki mitindo epai ya Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai ya Banganga-Nzambe oyo balandi mpe epai ya bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe, mpo ete balongola kati na Tempelo ya Yawe, biloko nyonso oyo esalema mpo na Bala, mpo na nzambe mwasi Ashera, mpe mpo na mampinga nyonso ya likolo. Mokonzi atumbaki yango libanda ya Yelusalemi, kati na bilanga ya lubwaku ya Sedron, mpe amemaki putulu na yango na Beteli.
Mokonzi alongolaki banganga-nzambe ya bapaya oyo bakonzi ya Yuda batiaki mpo na kotumba ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba ya bingumba ya Yuda mpe ya zingazinga ya Yelusalemi : bango nde bazalaki kotumba ansa mpo na Bala, mpo na moyi, mpo na sanza, mpo na minzoto mpe mpo na mampinga nyonso ya likolo.
Akotisaki ngai kati na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe : na ekotelo ya Tempelo, bato tuku mibale na mitano bazalaki na kati-kati ya ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe etumbelo ; bapesaki mikongo na Tempelo ya Yawe mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya este ; bazalaki kogumbama na kotalaka na ngambo ya este mpo na kogumbamela moyi.