25 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amoni, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Roboami mpe misala na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi, misala na ye nyonso ya nguya mpe ndenge asalaki liziba mpe nzela ya se ya mabele oyo amemaki mayi kino na engumba, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Manase, misala na ye nyonso mpe masumu oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Bongo bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki mokonzi Amoni likita mpe bakomisaki Joziasi, mwana na ye ya mobali, mokonzi na esika na ye.
Bakundaki ye kati na kunda na ye, kati na elanga ya Uza ; mpe Joziasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yorami mpe misala na ye nyonso ekomami na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.