Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 21:15 - Mokanda na Bomoi

15 pamba te basalaki mabe na miso na Ngai mpe bapelisaki kanda na Ngai, wuta na mokolo oyo batata na bango babimaki na Ejipito kino na mokolo ya lelo. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 21:15
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakosundola ndambo ya libula na Ngai oyo ekotikala, nakokaba bango na maboko ya banguna na bango. Banguna na bango bakobebisa bango mpe bakobotola biloko na bango,


Mpe lisusu, Manase asopaki makila ya bato oyo bayebi likambo te mpe atondisaki Yelusalemi na makila yango na bisika nyonso —kotanga te masumu oyo apengwisaki na yango Yuda mpo na kosala mabe na miso ya Yawe.


Bato ya mokili bakomisi yango mbindo, bazali kotosa mibeko te ; banyati-nyati bikateli mpe babuki boyokani ya seko.


Nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, na miso ya bato ya bikolo nyonso ya mokili mpo na makambo nyonso oyo Manase, mwana mobali ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, asalaki kati na Yelusalemi.


Kasi boyokaki Ngai te, › elobi Yawe, ‹ botumbolaki Ngai kutu na nzela ya banzambe ya bikeko, oyo maboko na bino esalaki, mpe bomibendelaki bino moko pasi. › »


Banguna na ye bakomi bakonzi na ye, bayini na ye bazali na esengo ; pamba te Yawe atindeli Siona pasi likolo ya ebele ya masumu na ye. Bana na ye ya mibali bakei na bowumbu, bakangi bango mpe bazali kotambola liboso ya monguna na ye.


Kasi bana ya Isalaele batombokelaki Ngai kati na esobe ; batosaki bikateli na Ngai te, kasi babwakaki mibeko na Ngai, oyo moto oyo asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango. Mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakobebisa bango kati na esobe.


Kasi bana mpe batombokelaki Ngai, balandaki bikateli na Ngai te, babatelaki te na bokebi mibeko na Ngai, oyo moto asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango, mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai kati na esobe.


Yango wana, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, bomikomisi solo mbindo mpo na kolanda nzela ya batata na bino mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko ?


Boni, mwana na moto, okosambisa bango ? Okosambisa bango solo ? Tutanisa bango na misala ya mbindo ya batata na bango


Bakomaki na kindumba mpe bamipesaki na yango wuta bolenge na bango, na Ejipito. Kuna, bato bazalaki kosakana na mabele na bango mpe kosimbasimba tolo na bango ya bolenge.


Sik’oyo, Nkolo, Nzambe na biso, Yo oyo obimisa bato na Yo na Ejipito na nzela ya loboko na Yo ya nguya mpe Kombo na Yo ekenda sango kino na mokolo ya lelo, tosalaki masumu, tosalaki mabe !


Pamba te nayebi ndenge nini bozali batomboki mpe mito makasi. Soki, wana nazali nanu na bomoi kati na bino, bozali batomboki liboso ya Yawe, ekozala boni sima na kufa na ngai ?


Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. »


Nazwaki lisusu eloko oyo ememisaki bino masumu, ekeko ya mwana ngombe oyo bosalaki, natumbaki yango na moto, natutaki mpe nanikaki yango malamu kino ekomaki putulu ; mpe nabwakaki putulu yango na mayi oyo ezalaki kotiola wuta na ngomba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ