Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 21:12 - Mokanda na Bomoi

12 tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakoyeisa kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda pasi oyo ekozala lokola kake na matoyi ya moto nyonso oyo akoyoka sango na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 21:12
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakobengisa pasi makasi na esika oyo mpe na bavandi na yango kolanda makambo nyonso oyo ekomama kati na buku oyo mokonzi ya Yuda awuti kotanga.


Bato ya mokili bakomisi yango mbindo, bazali kotosa mibeko te ; banyati-nyati bikateli mpe babuki boyokani ya seko.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona, libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako, libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga ; moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye akotikala kobanga te.


Loba : « Bino bakonzi ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe ! Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Boyoka ! Nakoyeisa pasi makasi na esika oyo ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango na yango, akozala na somo.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Mawa ! Pasi ya somo ezali koya !


Wana otindeli biso pasi makasi oyo, okokisi penza maloba oyo olobaki mpo na kotelemela biso mpe bakambi na biso ; mpe pasi oyo ekweyeli Yelusalemi etikala nanu kosalema te kati na mokili mobimba.


« Bozali etuka moko kaka oyo Ngai napona kati na bituka nyonso ya mabele ; yango wana nakopesa bino etumbu mpo na mabe nyonso oyo bosali.


Yango wana, likolo na bino, bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga. Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti.


Yawe alobaki na Samuele : — Tala, nalingi kosala likambo moko oyo, kati na Isalaele, ekosala pasi na matoyi ya moto nyonso oyo akoyoka yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ