Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 21:11 - Mokanda na Bomoi

11 « Lokola Manase, mokonzi ya Yuda, asalaki makambo ya nkele, lokola asalaki makambo mabe koleka ata bato ya Amori oyo bazalaki liboso na ye, mpe lokola apengwisaki Yuda na nzela ya banzambe na ye ya bikeko,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 21:11
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te.


Akokaba Isalaele mpo na masumu oyo Jeroboami asali mpe asalisi Isalaele.


mpo na masumu oyo Jeroboami asalaki mpe atindikaki bato ya Isalaele na kosala. Na bongo, apelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.


Akufaki likolo ya masumu oyo asalaki, na kosala mabe na miso ya Yawe mpe na kotambola na banzela ya Jeroboami oyo asalaki masumu oyo ememaki Isalaele na libebi.


Asalaki makambo ya nkele koleka na kosambela banzambe ya bikeko ndenge bato ya Amori oyo Yawe abenganaki liboso ya Isalaele bazalaki kosala.


Alandaki banzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango, atumbaki ata mwana na ye ya mobali na moto lokola mbeka, kolanda misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bana ya Isalaele.


Yawe alobaki na nzela ya basali na ye, basakoli :


Mpe lisusu, Manase asopaki makila ya bato oyo bayebi likambo te mpe atondisaki Yelusalemi na makila yango na bisika nyonso —kotanga te masumu oyo apengwisaki na yango Yuda mpo na kosala mabe na miso ya Yawe.


Manase asalaki makambo mabe na miso ya Yawe na ndenge amekolaki misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele.


Amoni asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Manase, tata na ye, asalaki.


Atambolaki na banzela nyonso ya tata na ye, na kosambelaka banzambe ya bikeko oyo tata na ye asambelaki mpe agumbamelaki.


Kasi bato ya Isalaele batosaki te. Manase apengwisaki bango, mpe basalaki lisusu mabe koleka bikolo oyo Yawe abebisaki liboso ya bato ya Isalaele.


Joziasi abomaki mpe bato oyo basololaka na milimo ya bakufi, bamoni makambo, bikilakila, banzambe ya bikeko, mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na mokili ya Yuda mpe ya Yelusalemi. Asalaki bongo mpo na kokokisa mitindo oyo ekomama kati na buku oyo Nganga-Nzambe Ilikia amonaki kati na Tempelo ya Yawe.


Nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, na miso ya bato ya bikolo nyonso ya mokili mpo na makambo nyonso oyo Manase, mwana mobali ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, asalaki kati na Yelusalemi.


Yebisa ye boye : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya Yelusalemi : Bokoko mpe mbotama na yo etalisaka ete ozali moto ya Kanana ; tata na yo azalaki moto ya Amori, mpe mama na yo azalaki moto ya Iti.


Ozali solo mwana mwasi ya mama na yo, oyo asambwisaki mobali na ye mpe bana na ye ya mibali ; ozali solo ndeko mwasi ya bandeko na yo ya basi oyo batiolaki mibali mpe bana na bango. Mama na bino azalaki moto ya mokili ya Iti, mpe tata na yo azalaki moto ya Amori.


anyokolaka mobola mpe moto oyo akelela, ayibaka, azongisaka te eloko oyo akangi na niongo epai ya mokolo na yango, atalelaka banzambe ya bikeko, asalaka makambo ya mbindo,


Kasi likolo ya mitema mabe ya bato na yango, batombokelaki mibeko na Ngai mpe balandaki bikateli na Ngai te ; basalaki mabe koleka bikolo mpe bamboka ya zingazinga, pamba te batiolaki mibeko na Ngai, batambolaki te kolanda mitindo na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ