1 Manase azalaki na mibu zomi na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Efitsiba. »
Ezekiasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na ngomba moke epai wapi bakunda ya bakitani ya Davidi ezali. Bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bapesaki ye lokumu tango akufaki, mpe Manase, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi, lokola mboloko ya mafuta. Tika ete tango nyonso, mabele na ye etondisaka yo na esengo, mpe bolingo na ye elangwisaka yo !
Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola, bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ; kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, » mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, » pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo, mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.
Nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, na miso ya bato ya bikolo nyonso ya mokili mpo na makambo nyonso oyo Manase, mwana mobali ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, asalaki kati na Yelusalemi.