Oh Ezekiasi, tala oyo ekozala elembo mpo na yo : Na mobu oyo, bokolia biloko oyo ekobima na nkona oyo ekweyaki na mabele ; na mobu oyo ekolanda, bokolia biloko oyo ebotaka yango moko. Kasi na mobu ya misato, bokolona mpe bokobuka bambuma, bokolona banzete ya vino, mpe bokolia bambuma na yango.
— Zonga epai ya Ezekiasi, mokonzi ya bato na Ngai, mpe loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‹ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Tala, nakobikisa yo ; mpe sima na lobi, okomata lisusu na Tempelo ya Yawe.
Ezayi azongisaki : — Tala elembo oyo Yawe apesi yo mpo na kotalisa ete akokokisa makambo oyo alaki yo : Olingi ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi to ezonga sima na matambe zomi ?