Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 20:20 - Mokanda na Bomoi

20 Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi, misala na ye nyonso ya nguya mpe ndenge asalaki liziba mpe nzela ya se ya mabele oyo amemaki mayi kino na engumba, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 20:20
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Misala mosusu ya Jeroboami, bitumba mpe bokonzi na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Roboami mpe misala na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Asa, molende na ye, misala na ye nyonso mpe bingumba na ye nyonso oyo atongaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Tango akomaki mobange, akomaki kobela makolo.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Abiyami mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Bitumba ezalaki kati na Jeroboami mpe Abiyami.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Pekakia mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Azaria mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.


Makambo mosusu oyo etali mokonzi Akazi mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.


Wuta na Lakishi, mokonzi ya Asiri atindaki epai ya mokonzi Ezekiasi, na Yelusalemi, mokonzi ya mampinga na ye, mokonzi ya bakalaka ya lokumu, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, mpe mampinga ya basoda ya nguya. Tango bakomaki na Yelusalemi mpe batelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba,


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joziasi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yorami mpe misala na ye nyonso ekomami na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.


Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Asambelaki Yawe ; mpe Yawe ayanolaki, apesaki ye elembo moko ya kokamwa.


apesaki bakalaka mpe bakonzi ya basoda na ye likanisi ya kokanga bitima oyo ezalaki na libanda ya engumba. Bango nyonso bandimaki likanisi yango mpe basungaki ye.


Ezali mpe Ezekiasi moto akangaki monoko ya etima ya Giyoni mpe alekisaki mayi na yango na se ya mabele, na ngambo ya weste ya engumba ya Davidi. Ezekiasi azalaki kolonga na misala na ye nyonso.


Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi elongo na misala ya botosi na ye kati na makambo ya Nzambe, ekomama kati na emoniseli ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, mpe kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele.


Bato ebele basanganaki mpe bakangaki bitima nyonso elongo na mayi oyo ezalaki kotiola na se ya mabele. Balobaki : — Mpo na nini bakonzi ya Asiri baya kokuta mayi ebele ?


Nalekaki pembeni ya Ekuke ya Etima mpe pembeni ya Liziba ya mokonzi, kasi nzela ezalaki penza te mpo ete nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango ekoka koleka.


Neyemi, mwana mobali ya Azibuki, mokambi ya ndambo ya etuka ya Beti-Tsuri, abongisaki wuta na esika oyo Shalumi asukelaki kino na esika oyo etalana na bakunda ya Davidi, kino na liziba oyo bato batimola na maboko mpe kino na ndako ya basoda ya mpiko oyo bazalaki kokengela Davidi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ