Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi, misala na ye nyonso ya nguya mpe ndenge asalaki liziba mpe nzela ya se ya mabele oyo amemaki mayi kino na engumba, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Mpo na yango, nakosala ete okende kokutana na bakoko na yo ; mpe okokundama na kimia kati na moko na bakunda na yo. Na bongo, miso na yo ekomona te pasi nyonso oyo nakotindela esika oyo. » Batindami bakomisaki eyano oyo epai ya mokonzi.
Maridoshe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kovanda kati na bituka nyonso nkama moko na tuku mibale na sambo ya mokili ya Kizerisesi, mpe mikanda yango ezalaki na maloba ya kimia mpe ya elikya
Alobaki : « Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai, mpe nakozonga bolumbu. Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ; tika ete Kombo na Ye ekumisama ! »
Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango ; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami.
« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Mikolo ya kokila bilei ya sanza ya minei, ya mitano, ya sambo mpe ya zomi ekokoma mikolo ya esengo mpe ya kosepela, ekokoma bafeti ya nkembo mpe ya esengo mpo na libota ya Yuda. Kasi bolinga solo mpe kimia. »
Boye Samuele ayebisaki ye makambo nyonso, abombelaki ye ata likambo moko te. Mpe Eli alobaki : — Azali Yawe. Tika ete asala makambo oyo ezali malamu na miso na Ye.