17 « Solo, na mikolo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo, mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni, eloko moko te ekotikala, elobi Yawe.
Ndenge Yawe alobaki yango, Nabukodonozori azwaki bomengo nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako ya mokonzi ; bongo amemaki biloko nyonso ya wolo oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, asalaki mpo na Tempelo ya Yawe.
Na suka ya mobu, mokonzi Nabukodonozori abengisaki ye mpe amemaki ye na Babiloni elongo na biloko ya motuya ya Tempelo ya Yawe ; akomisaki Sedesiasi, ndeko mobali ya Yeoyakini, mokonzi ya Yuda mpe ya Yelusalemi.
Nabukodonozori amemaki na Babiloni biloko nyonso ya Tempelo ya Nzambe, ya minene to ya mike, bozwi ya Tempelo ya Yawe, bozwi ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye.
Nakokaba bozwi nyonso ya engumba oyo na maboko ya banguna na bango : biloko nyonso ya engumba, biloko ya talo mpe bomengo nyonso ya mokonzi ya Yuda ; bakokamata yango mpe bakomema yango na mokili ya Babiloni.