Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 20:15 - Mokanda na Bomoi

15 Ezayi atunaki : — Bamoni eloko nini kati na ndako na yo ya bokonzi ? Ezekiasi azongisaki : — Bamoni biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ngai ; ezali na eloko moko te, kati na bibombelo na ngai, oyo nazangi kolakisa bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 20:15
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezekiasi ayambaki bantoma na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso, mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango.


Bongo mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye : — Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi ? Ezekiasi azongisaki : — Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni.


Ezayi alobaki na Ezekiasi : — Yoka liloba oyo Yawe alobi :


soki nabombaki lisumu na ngai ndenge Adamu asalaki to nabombaki yango na motema na ngai,


Botiaka elikya te na mileki ya moyibi, mpe botielaka yango motema te ; soki bomengo na bino ekomi ebele, bokangama na yango te.


Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tika ete moto ya bwanya amikumisa te mpo na bwanya na ye to moto ya makasi mpo na makasi na ye to moto ya bozwi mpo na bozwi na ye.


Jozue alobaki na Akana : — Mwana na ngai, pesa nkembo epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpe pesa Ye penza lokumu. Yebisa ngai likambo oyo osalaki, kobombela ngai eloko moko te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ