Yango wana, babengaka yango Babeli, pamba te kuna nde Yawe atiaki mobulu kati na maloba ya bato ya mokili mobimba, mpe wuta kuna, Yawe apanzaki bato na mokili mobimba.
Davidi amilobelaki : « Nakotalisa bolamu epai ya Anuni, mwana mobali ya Naashi, ndenge kaka tata na ye atalisaki ngai bolamu. » Boye Davidi atindaki bato mpo na kobondisa ye na tina na kufa ya tata na ye. Tango basali ya Davidi bakomaki na mokili ya bato ya Amoni,
atindaki Yorami, mwana na ye ya mobali, kopesa mokonzi Davidi mbote mpe longonya mpo ete abundisaki mpe alongaki Adadezeri oyo azalaki monguna ya Toyi. Yorami amemelaki Davidi biloko ya palata, ya wolo mpe ya bronze.
Kasi mpo ete Ezekiasi akomaki na lolendo, atambolaki lisusu te na lolenge ya kondima bolamu ya Nzambe mpe ya kozongisela Ye matondi ; mpo na yango, Yawe asilikelaki ye, Yuda mpe Yelusalemi.
Kasi tango bakambi ya Babiloni batindelaki ye bakalaka mpo na kotuna ye na tina na elembo ya kokamwa oyo esalemaki kati na mokili, Nzambe atikaki Ezekiasi kosala na ndenge na ye moko mpo na komeka ye mpe koyeba mozindo ya motema na ye.