11 Bongo mosakoli Ezayi abelelaki Yawe, mpe Yawe azongisaki elilingi sima, na matambe zomi, kolanda ematelo ya Akazi.
Ezekiasi azongisaki : — Ezali pasi te ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi ; zongisa yango nde na sima, na matambe zomi.
Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Asambelaki Yawe ; mpe Yawe ayanolaki, apesaki ye elembo moko ya kokamwa.
Kasi tango bakambi ya Babiloni batindelaki ye bakalaka mpo na kotuna ye na tina na elembo ya kokamwa oyo esalemaki kati na mokili, Nzambe atikaki Ezekiasi kosala na ndenge na ye moko mpo na komeka ye mpe koyeba mozindo ya motema na ye.
Yawe alobaki na Moyize : — Mpo na nini ozali koganga boye epai na Ngai ? Loba na bana ya Isalaele ete batambola.
Nakozongisa sima, na badegre zomi, elili ya moyi oyo ekitaki na tango ya Akazi. › » Boye, moyi ezongaki sima, mpe ekitaki na badegre zomi.
Petelo abimisaki bato nyonso ; bongo afukamaki mpe asambelaki. Wana azalaki kotala epai ebembe ya mama Dorkasi ezalaki, alobaki : — Tabita, telema ! Tabita afungolaki miso ; mpe wana amonaki Petelo, avandaki.