Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 20:1 - Mokanda na Bomoi

1 Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 20:1
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.


Alobaki na mokonzi : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Nzambe azali lisusu te na Isalaele mpo ete otinda bato kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? Lokola osali bongo, okokita lisusu te na mbeto oyo olali, okokufa solo. »


Mpo na yango, tala makambo oyo Yawe alobi : ‹ Okokita te na mbeto oyo olali, pamba te, solo, okokufa. › » Boye Eliya akendeki.


Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo ; bango nyonso balata bilamba ya basaki.


Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, atindelaki Ezekiasi maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nayoki losambo na yo na tina na Senakeribe, mokonzi ya Asiri.


Ezekiasi abalolaki elongi na ye na mir mpe abondelaki Yawe :


Yawe alobaki na Moyize : « Tala sik’oyo, mokolo ya kufa na yo ekomi pene. Benga Jozue, mpe bokota na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakopesa ye mitindo na Ngai. » Boye Moyize mpe Jozue bakendeki mpe bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Yawe alobaki na Moyize : « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo ; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango.


Azalaki penza kobela kino akomaki pene ya kokufa, kasi Nzambe ayokelaki ye mawa, mpe ye moko kaka te kasi ngai mpe, mpo ete natonda na mawa te.


pamba te akomaki pene ya kokufa mpo na mosala ya Klisto : atiaki bomoi na ye kati na likama mpo na kopesa ngai lisungi oyo bino moko bokokaki te kopesa ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ