Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 2:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Jeriko bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye : — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ? Elize azongisaki : — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 2:5
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi tata na ye aboyaki mpe alobaki : — Nayebi, mwana na ngai ! Nayebi ! Ye mpe akokoma ekolo, akokoma monene. Nzokande, leki na ye akozala monene koleka ye mpe bakitani na ye bakokoma lisanga ya bikolo.


Na tango wana, moko kati na bana ya basakoli alobaki na moninga na ye, na etinda ya Yawe : — Nasengi na yo ete obeta ngai. Kasi moninga na ye aboyaki kobeta ye.


Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Beteli, bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye : — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ? Elize azongisaki : — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye !


Mwasi moko kati na basi ya bayekoli ya basakoli abondelaki Elize : — Mosali na yo, mobali na ngai, akufa. Oyebi malamu ete azalaki kotosa Yawe. Kasi moto oyo adefisaki ye niongo ayei mpo na kozwa bana na ngai mibale ya mibali mpo ete bakoma bawumbu na ye.


Geazi azongisaki : — Iyo, nyonso ezali malamu. Nkolo na ngai atindi ngai koyebisa yo : « Bilenge bayekoli mibale kati na basakoli bayei epai na ngai wuta na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nabondeli yo, pesa bango bakilo ya palata, tuku misato na mitano, mpe bilamba mibale ya talo. »


Mokolo moko, bayekoli ya basakoli balobaki na Elize : — Tala ! Esika oyo tosanganaka elongo na yo ekomi moke mingi mpo na biso.


Elize abengisaki moko kati na bayekoli ya basakoli mpe alobaki na ye : « Kanga mokaba na yo, zwa molangi oyo ya mafuta mpe kende na Ramoti ya Galadi.


tango ya kopasola mpe tango ya kobamba, tango ya kokanga monoko mpe tango ya koloba ;


« Bino bisanga, bovanda kimia liboso na Ngai ! Tika ete bato ya bikolo bayeisa sika makasi na bango, tika ete bapusana mpe baloba : ‹ Tokende elongo mpo na kosamba ! ›


Amosi azongiselaki Amatsia : — Nazalaki mosakoli te to mwana ya mosakoli te, kasi nazalaki nde mobateli bibwele mpe moloni ya basikomori.


Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye !


Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo.


— Bato ya Galile, mpo na nini botikali awa na kotala na likolo ? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na Likolo, akozonga ndenge kaka bomoni Ye kokende na Likolo.


kino na mokolo oyo amemamaki na Likolo, sima na Ye kopesa mitindo, na nzela ya Molimo Mosantu, epai ya bantoma oyo aponaki.


Polo azongisaki : — Tata mokonzi Festisi, nazali na liboma te. Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo mpe ezali penza na nzela.


Sima na yango, okokende na Gibea ya Nzambe epai wapi bayangeli ya Filisitia bazali. Wana okopusana na engumba, okokutana na ngulupa ya basakoli kowuta na esambelo ya likolo ya ngomba. Liboso na bango, ekozala na babeti mandanda, bambunda ya mike, baflite mpe banzenze. Wana bakozala kobeta mindule, basakoli yango bakokoma kosakola.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ