Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 2:4 - Mokanda na Bomoi

4 Eliya alobaki na Elize : — Tikala awa ; Yawe atindi ngai na Jeriko. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Jeriko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 2:4
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango Akabi azalaki mokonzi, Iyeli, moto ya Beteli, atongaki lisusu engumba Jeriko. Tango atongaki miboko na yango, Abirami, mwana na ye ya liboso ya mobali, akufaki ; mpe tango batiaki bikuke na yango, Segubi, mwana na ye ya mobali ya suka, akufaki. Yango esalemaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela na Jozue, mwana mobali ya Nuni.


Eliya alobaki na Elize : — Nabondeli yo, tikala awa ; pamba te Yawe atindi ngai na Beteli. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Beteli.


Kasi mama ya mwana alobaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te. Boye Elize atelemaki mpe alandaki mwasi ya Sunami.


Yesu akotaki na engumba Jeriko, mpe azalaki kokatisa yango.


Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba.


Bazalaki komipesa mingi penza na malakisi ya bantoma, na kozala lisanga, na kobuka lipa mpe na kosambela.


Bikuke ya engumba Jeriko ezalaki ya kokangama makasi penza mpo na bana ya Isalaele ; moto moko te akokaki kokota to kobima.


Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo : « Tika ete moto oyo akoluka kotonga lisusu engumba Jeriko alakelama mabe liboso ya Yawe ! Solo, akofuta motuya ya bomoi ya mwana na ye ya liboso ya mobali, tango akotonga miboko na yango ; mpe motuya ya bomoi ya mwana na ye ya suka, tango akotia bikuke na yango. »


Kasi Rite azongiselaki ye : — Kotindika ngai na makasi te ete natika yo to napengwa na nzela na yo ; pamba te na esika nyonso oyo yo okokende nde ngai mpe nakokende, mpe na esika nyonso oyo yo okovanda nde ngai mpe nakovanda ; bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.


Ana alobaki na ye : — Limbisa ngai, nkolo na ngai ; nazali mwasi oyo atelemaki awa pembeni na yo mpo na kobondela Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ