2 Bakonzi 2:3 - Mokanda na Bomoi3 Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Beteli, bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye : — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ? Elize azongisaki : — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima na yango, okokende na Gibea ya Nzambe epai wapi bayangeli ya Filisitia bazali. Wana okopusana na engumba, okokutana na ngulupa ya basakoli kowuta na esambelo ya likolo ya ngomba. Liboso na bango, ekozala na babeti mandanda, bambunda ya mike, baflite mpe banzenze. Wana bakozala kobeta mindule, basakoli yango bakokoma kosakola.