Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 2:24 - Mokanda na Bomoi

24 Abalukaki, atalaki bango mpe alakelaki bango mabe na Kombo na Yawe. Boye, bangombolo mibale ebimaki na zamba mpe epasolaki bana tuku minei na mibale kati na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 2:24
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki : « Tika ete Kanana alakelama mabe, azala mowumbu ya suka ya bandeko na ye ! »


Bongo Ushayi abakisaki : — Oyebi ete tata na yo mpe bato na ye bazali bato ya mpiko mpe bato na kanda makasi lokola ngombolo ya mwasi oyo bawuti kobotola bana na yango kati na zamba. Tata na yo azali moto oyo abundaka bitumba wuta kala, akolekisa te butu esika moko na bato.


mpe moto na Nzambe azongelaki nzela na ye. Wana azalaki kokende, akutanaki na nkosi na nzela, mpe nkosi yango ebomaki ye. Ebembe na ye etikalaki na nzela, nkosi mpe ane etelemaki pembeni ya ebembe na ye.


Moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Azaeli, Jewu akoboma ye ; mpe moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Jewu, Elize akoboma ye.


Bongo alobaki na ye : — Lokola oboyi kotosa Liloba na Yawe, tango kaka okotika ngai, nkosi ekoboma yo. Moninga na ye akendeki, akutanaki na nkosi, mpe ebomaki ye.


Longwa wana Elize akendeki na ngomba Karimeli ; mpe longwa kuna, azongaki na Samari.


Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.


Kokutana na ngombolo oyo babotoli bana ezali malamu koleka kokutana na zoba oyo azali kati na bolema.


Etumbu esalema mpo na batioli, mpe fimbu esalema mpo na bazoba.


Mokonzi mabe oyo azali kokamba bato bakelela azali lokola nkosi ya kanda to lokola ngombolo oyo ezali kolanda nyama ya kolia.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakolongola yo na mokili oyo, okokufa kaka na mobu oyo ; pamba te otindiki bato na kotombokela Yawe. › »


yeisa mitema na bango makasi, kweyisela bango bilakeli mabe na Yo ;


Nakolanda bino lokola ngombolo oyo ebungisi bana na yango mpe nakopasola misuni ya mitema na bino. Nakolia bino wana, lokola nkosi ya mwasi, bongo banyama ya zamba ekoya kopanza bino biteni-biteni.


Nakotinda kati na mokili na bino banyama ya zamba oyo ekoboma bana na bino, ekolia bibwele na bino mpe ekosilisa koboma bino kino banzela na bino ezanga bato.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : « Mwasi na yo akosala kindumba kati na engumba, bana na yo ya mibali mpe ya basi bakokufa na mopanga, bakokabola mabele na yo na biteni. Yo moko, okokufa na mabele ya mbindo, mpe Isalaele akokende solo na bowumbu, mosika ya mokili na ye ya mbotama. »


Yesu alobaki na nzete yango : « Tika ete, mpo na libela, moto moko te alia lisusu mbuma kowuta na yo ! » Bayekoli na Ye bayokaki Ye koloba maloba yango.


Petelo akanisaki likambo oyo esalemaki mpe alobaki na Yesu : — Moteyi, tala ! Nzete ya figi oyo olakelaki mabe ekawuki !


Tango Ananiasi ayokaki bongo, akweyaki mpe akufaki. Bongo, bato nyonso oyo bayokaki likambo yango batondaki na somo.


Petelo alobaki na ye : — Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo.


Kasi Petelo azongiselaki ye : — Mpo ete okanisi ete okoki kosomba likabo ya Nzambe na nzela ya mbongo, tika ete yo mpe mbongo na yo bokufa !


Lisusu, tomilengeli mpo na kopesa bozangi botosi nyonso etumbu, tango kaka botosi na bino ekokoka.


Kasi soki ezali bongo te, tika ete moto ebima wuta na Abimeleki mpe etumba bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo ; mpe tika ete moto ebima wuta na bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo, mpe etumba Abimeleki ! »


Nzambe azongiselaki bato ya Sishemi mabe nyonso oyo basalaki. Ezali ndenge wana nde elakeli mabe oyo Yotami, mwana mobali ya Yerubali, asakolaki ekokisamaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ