Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 2:23 - Mokanda na Bomoi

23 Longwa kuna na Jeriko, Elize akendeki na Beteli. Wana azalaki kotambola na nzela, bilenge mibali babimaki wuta na engumba mpe bazalaki kotiola ye ; bazalaki koloba : « Moto na libandi, longwa awa ! Moto na libandi, longwa awa ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 2:23
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi tango Sara amonaki ete Isimaeli, mwana oyo Agari, moto ya Ejipito, abotelaki Abrayami, azali koseka ;


Wana bazalaki kotambola mpe kosolola, mbala moko shar ya moto mpe bampunda ya moto ekabolaki bango mibale ; mpe Eliya amataki na likolo na nzela ya mopepe makasi.


Eliya alobaki na Elize : — Nabondeli yo, tikala awa ; pamba te Yawe atindi ngai na Beteli. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Beteli.


Boye mayi etikala peto kino na mokolo ya lelo, kolanda liloba oyo Elize abimisaki.


Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe.


Ata bilenge mibali ya mike bakomi koseka ngai ; soki kaka nabimi, bakomi kosambwisa ngai.


« Kasi sik’oyo, nakomi eloko ya kotiola epai ya bilenge oyo batata na bango bazangaki tina, mpe oyo nakokaki kutu te kopesa nzela ya kolia esika moko na mbwa na ngai, oyo ezalaki kobatela bibwele na ngai.


Tala ngai mosali na Yo, na miso ya bolingo ; bikisa ngai kati na bolingo na Yo.


Yawe, sala ete nayokisama soni te, pamba te nabeleli Yo. Kasi tika ete bato mabe nde bayoka soni mpe bakita kino na mboka ya bakufi.


Kasi awa ngai nakomi na pasi, bango bazali kosepela mpe kosangana ; wana ngai nayebi te, bango bazali kosangana mpo na kotonga ngai, bazali kolemba te kofinga ngai.


Bayebaka elenge mobali na nzela ya misala na ye, soki ezaleli na ye ezali peto mpe sembo.


Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.


Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ; ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.


Yango wana, longola mawa na motema na yo, longola pasi na nzoto na yo ; pamba te bolenge mpe bomwana ezali pamba.


Mawa na yo, ekolo ya bato ya masumu, bato oyo batonda na mabe, libota oyo esalaka mabe mpe bana mabe ! Batiki Yawe, batioli Mosantu ya Isalaele mpe bapesi Ye mokongo.


Bato bakokoma konyokolana bango na bango : moko akonyokola mosusu, mpe moninga akonyokola moninga na ye mosusu ; bilenge bakotosa mikolo te, bato pamba bakotelemela bato ya lokumu ;


Eh Yawe, okosaki-kosaki ngai, mpe nakosamaki penza ; olekaki ngai na makasi mpe olongaki ngai. Bazali kotiola ngai mikolo nyonso, bato nyonso bazali kaka koseka ngai.


Na tango nyonso oyo nalobaka, nagangaka makasi mpo na kosakola kaka mobulu mpe kobebisama. Mokolo na mokolo, Liloba na Yawe ememelaka ngai kofingama mpe pamela ya mabe.


Bana bazali kolokota bakoni, batata bazali kopelisa moto, mpe basi bazali kosangisa farine mpo na kosala mapa mpo na Ishitari  ; bazali kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe mosusu, bongo ezali kopesa Ngai kanda.


Beteli, makambo oyo ekokomela yo mpo ete mabe na yo eleki ndelo. Tango mokolo yango ekokoka, mokonzi ya Isalaele akozala lisusu te.


Bavandi ya Samari bazali kolenga mpo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni ; bato na yango mpe Banganga-Nzambe oyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombe bakosala matanga na tina na yango. Tika ete basepela lelo mpo ete nkembo ya mwana ngombe elongwe kati na bango.


Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te ! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba : « Na Kombo na Yawe ! »


Soki suki ya mobali moko ekatani, bongo akomi na libandi, elakisi te ete akomi mbindo.


« Na mokolo oyo nakopesa Isalaele etumbu mpo na masumu na ye, nakobebisa bitumbelo ya Beteli, nakobuka maseke ya bitumbelo, mpe ekokweya na mabele.


« Bokende na Beteli mpe bosala masumu, bokende na Giligali mpe bosala lisusu masumu koleka. Bobonza bambeka na bino tongo nyonso, mpe eteni na bino ya zomi sima na mokolo ya misato.


Bokende koluka na Beteli te, bokende na Giligali te, bosala mobembo na Beri-Sheba te. Pamba te Giligali ekokende na bowumbu, mpe Beteli ekokoma eloko pamba. »


Kosakola lisusu na Beteli te, pamba te Beteli ezali Esika ya bule ya mokonzi mpe tempelo ya bokonzi.


Kasi ndenge kaka mwana mobali oyo abotamaki na lolenge ya bomoto azalaki na kala konyokola mwana mobali oyo abotamaki na nzela ya nguya ya Molimo, ndenge wana mpe ezali kosalema sik’oyo.


Bamosusu batiolamaki, babetamaki fimbu, batiamaki minyololo mpe babwakamaki na boloko ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ