22 Boye mayi etikala peto kino na mokolo ya lelo, kolanda liloba oyo Elize abimisaki.
mpe akendeki na etima, abwakaki kuna mungwa mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Napetoli mayi oyo ; ekoyeisa lisusu kufa te mpe ekobebisa lisusu mabele te mpo ete ebota mbuma. › »
Longwa kuna na Jeriko, Elize akendeki na Beteli. Wana azalaki kotambola na nzela, bilenge mibali babimaki wuta na engumba mpe bazalaki kotiola ye ; bazalaki koloba : « Moto na libandi, longwa awa ! Moto na libandi, longwa awa ! »