Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 2:16 - Mokanda na Bomoi

16 Balobaki : — Tala biso basali na yo, tozali na mibali ya mpiko tuku mitano. Tika ete baluka mokonzi na yo, tango mosusu Molimo na Yawe amemi ye mpe abwaki ye na ngomba to na lubwaku. Elize azongisaki : — Te, botinda bango te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 2:16
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nayebi te esika nini Molimo na Yawe akoki komema yo tango nakotika yo. Soki namemi sango epai ya Akabi, kasi ye amoni yo te, akoboma ngai. Nzokande ngai, mosali na yo, natosaka Yawe wuta bolenge na ngai.


Bayekoli tuku mitano ya basakoli bakendeki kotelema mosika ya esika oyo Eliya mpe Elize batelemaki, na ebale Yordani.


Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kati na Babiloni epai ya bato oyo bakendeki na bowumbu. Makambo oyo ezalaki kosalema kati na emoniseli oyo Molimo ya Nzambe apesaki ngai. Mpe emoniseli oyo namonaki esilaki.


Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai mosika. Boye, nazalaki kokende na pasi na motema, mpe molimo na ngai etondisamaki na kanda ; nzokande loboko na Yawe ezalaki kosala kati na ngai na nguya makasi.


Na nzela ya bimoniseli, Nzambe amemaki ngai kati na Isalaele mpe atiaki ngai na likolo ya ngomba moko ya molayi makasi ; mpe na likolo ya ngomba yango, na ngambo ya sude, ezalaki na bandako batonga lokola engumba.


Asembolaki elilingi moko lokola loboko mpe asimbaki ngai na suki ya moto. Molimo atombolaki ngai na kati-kati ya se mpe likolo mpe amemaki ngai, kati na emoniseli ya Nzambe, kino na Yelusalemi, na ekotelo ya Ekuke ya nor ya lopango ya kati ya Tempelo, epai wapi batelemisaki nzambe ya ekeko oyo etumbolaka zuwa.


Tango babimaki na mayi, Molimo ya Nkolo alongolaki Filipo, mpe soda oyo baboma mokongo amonaki ye lisusu te, kasi akobaki mobembo na ye na esengo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ