Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 2:12 - Mokanda na Bomoi

12 Tango Elize amonaki bongo, agangaki : « Tata na ngai ! Tata na ngai ! Yo nde ozali lokola shar ya Isalaele mpe batambolisi na yango ! » Bongo Elize amonaki ye lisusu te. Boye akangaki bilamba na ye mpe apasolaki yango na biteni mibale.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 2:12
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi apasolaki bilamba na ye, alataki saki mpe asalaki matanga mpo na mwana na ye mikolo ebele.


Enoki atambolaki na boyengebene elongo na Nzambe ; bongo alimwaki, pamba te Nzambe azwaki ye.


Elize abelaki bokono oyo ememaki ye na kufa. Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kotala ye mpe alelaki na miso na ye na maloba oyo : — Tata na ngai ! Tata na ngai ! Ozali bashar mpe bampunda ya Isalaele !


Alokotaki kazaka ya Eliya, oyo ekweyaki wuta na mapeka na ye, azongaki mpe atelemaki na ngambo ya ebale Yordani.


Kasi basali na ye bapusanaki mpe balobaki na ye : — Nkolo, soki mosakoli ayebisaki yo ete osala likambo moko ya monene, boni, olingaki kosala yango te ? Bongo mpo na nini te koleka, tango azali koloba na yo : « Sukola, mpe okokoma peto ! »


Tango mokonzi ya Isalaele amonaki bango, atunaki Elize : — Tata na ngai, naboma bango ? Naboma bango ?


akokangola ata moto oyo asali mabe, akokangola ye penza mpo na bopeto ya maboko na yo. »


Engumba etongamaka na nzela ya mapamboli ya bato ya sembo, kasi ebebisamaka na nzela ya monoko ya bato mabe.


Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna ? Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye ? Nani akanga mayi na kazaka na ye ? Nani akata bandelo nyonso ya mabele ? Kombo na ye nani ? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani ? Yebisa ngai soki oyebi !


Bwanya ekomisaka moto oyo azali na yango makasi koleka bakambi zomi kati na engumba.


Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, atindelaki Ezekiasi maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Mpo ete osambelaki Ngai na tina na Senakeribe, mokonzi ya Asiri,


Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki ! Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. › »


Sima na Nkolo Yesu koloba na bango, amemamaki kati na Likolo mpe avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.


Tango ba-anjelu bakabwanaki na bango mpo na kozonga na Likolo, babateli bibwele balobanaki bango na bango : « Tokende kino na Beteleemi, mpo na kotala makambo oyo esalemi kuna, makambo oyo Nkolo ayebisi biso. »


Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo.


Ezali na moto moko te oyo asila komata na Likolo, longola kaka Ye oyo akita wuta na Likolo : Mwana na Moto.


Sima na Yesu koloba bongo, amemamaki, wana bazalaki kotala, mpe lipata moko ezipaki Ye na miso na bango.


mpe alobaki : « Polo, kobanga te. Osengeli kosamba liboso ya Sezare. Mpo na yo, Nzambe abateli na bomoi bato nyonso oyo ozali kosala elongo na bango mobembo kati na masuwa. »


Bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe bakundaki Etieni mpe balelaki ye mingi.


Nzokande, kati na ndako yango ya kapo, tozali penza komona pasi, wana tozali kozela na posa makasi ete tolata ndako na biso ya Lola,


Solo, wana tozali nanu kati na ndako oyo ya kapo, tozali penza komona pasi mpe konyokwama, pamba te toboyi kobanda nanu na kolongola, kasi tolingi nde kolata mbala moko ndako na biso ya Lola, mpo ete bomoi emela oyo ekufaka.


Yango wana Nzambe alobi : « Tango amataki na likolo, amemaki bakangami mpe apesaki makabo epai na bato. »


Mongongo moko ya makasi kowuta na Lola elobaki na batatoli wana mibale : « Bomata awa ! » Bamataki na likolo kati na lipata, wana banguna na bango bazalaki kotala.


Mika alobaki na ye : — Vanda elongo na ngai. Okozala tata mpe nganga na ngai ; nakopesa yo na mobu moko mbongo ya bibende ya palata, zomi, bilamba ya kolata mpe biloko ya kolia. Molevi akomaki kosala epai ya Mika.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ