8 Tango mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri ayokaki ete mokonzi na ye alongwe na engumba Lakishi, azongaki mpe akutaki mokonzi na ye azali kobundisa engumba Libina.
Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki sango oyo epai ya mokonzi ya Asiri, na Lakishi : « Nasali mabe, bima na mboka na ngai ; nakofuta yo nyonso oyo okosenga ngai. » Mokonzi ya Asiri akatelaki Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, mpako ya motuya ya bakilo nkoto zomi ya palata mpe bakilo nkoto moko ya wolo.
Bino bavandi ya engumba Lakishi, bokangisa bampunda mpe bashar na bino ! Bino nde bomemisaki Siona, mboka kitoko, masumu ; pamba te bamonaki masumu ya Isalaele kati na bino !