Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 19:6 - Mokanda na Bomoi

6 Ezayi alobaki na bango : — Boloba na nkolo na bino : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Kobanga te mpo na makambo oyo oyoki, maloba oyo basali ya mokonzi ya Asiri bazali koloba mpo na kosambwisa Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 19:6
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na Lakishi, mokonzi ya Asiri atindaki epai ya mokonzi Ezekiasi, na Yelusalemi, mokonzi ya mampinga na ye, mokonzi ya bakalaka ya lokumu, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, mpe mampinga ya basoda ya nguya. Tango bakomaki na Yelusalemi mpe batelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba,


Bondima te ete Ezekiasi atinda bino kotia elikya na Yawe tango azali koloba : ‹ Solo, Yawe akokangola biso. Engumba oyo ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. ›


Kati na banzambe nyonso ya bikolo oyo, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai ? »


Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ? Nani oyo omatiselaki mongongo mpe otalaki na miso ya lolendo ? Ngai, Mosantu ya Isalaele !


Tango bakalaka ya mokonzi Ezekiasi bakomaki epai ya Ezayi,


Mosakoli azongisaki : — Kobanga te, pamba te ba-oyo bazali elongo na biso bazali ebele koleka ba-oyo bazali elongo na bango.


Yaazieli alobaki : « Bino bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi, mpe yo mokonzi Jozafati, boyoka ! Tala makambo oyo Yawe azali koloba na bino : ‹ Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mampinga minene oyo, pamba te bitumba ezali ya bino te kasi ezali ya Nzambe.


Bokobunda bitumba ata moke te : bomibongisa kaka na bisika na bino, botelema mpe botala elonga oyo Yawe akopesa bino. Bino bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bobanga te mpe bolenga te ! Lobi, bokende kokutana na bango ; mpe Yawe akozala elongo na bino ! › »


Yawe, kobosana te ete monguna afingi Yo, ete bato bazanga tina batioli Kombo na Yo !


Kobosana te makelele ya bayini na Yo, mangungu ya banguna na Yo, oyo ezali kaka komata se komata !


Moyize azongiselaki bango : — Bobanga te, boyika mpiko ! Bokomona kokangolama oyo Yawe akomemela bino lelo ; bato ya Ejipito oyo bozali komona lelo, bokotikala komona bango lisusu te.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Oh bato na Ngai, bino oyo bovandi kati na Siona, bozala na somo te ya bato ya Asiri oyo bazali kobeta bino fimbu mpe kotombola nzete mpo na kobeta bino ndenge bato ya Ejipito bazalaki kosala.


Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino : Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.


Alobaki na bango : — Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi, Ye oyo epai ya nani botindaki ngai mpo na kokomisa libondeli na bino :


Tango nabelelaki Yo, opusanaki pene na ngai mpe olobaki : « Kobanga te ! »


Bato mitano kati na bino bakolanda bato nkama moko, bato nkama moko kati na bino bakolanda bato nkoto zomi ; mpe banguna na bino bakokufa liboso na bino na mopanga.


Tango bokokende kobundisa banguna na bino mpe bokomona bampunda, bashar mpe mampinga ya basoda ebele koleka oyo ya bino, bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, akozala elongo na bino.


Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te lobi, kaka na ngonga oyo, nakokaba bango nyonso na maboko ya Isalaele lokola bibembe. Okokata misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe okotumba bashar na bango. »


Efungolaki monoko na yango mpe ekomaki kobimisa maloba ya kofinga Nzambe, Kombo na Ye, evandelo na Ye mpe bavandi ya Lola.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ