Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 19:25 - Mokanda na Bomoi

25 Oyoka nanu yango te ? Nasalaki mabongisi ya makambo oyo wuta kala, nabongisaki yango wuta na mikolo oyo eleka kala ; sik’oyo nde nakokisi yango ; esengeli na yo kokomisa bingumba ya makasi mipiku ya mabanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 19:25
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko, mabongisi ya motema na Ye, mpo na bikeke nyonso.


tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisa mpe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.


Boni, epasola ekoki solo komimatisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ; si ya mabaya ekoki solo komikumisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ? Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yango to etape ya nzete kotombola nzete na yango ?


Nasalaka pole mpe nakelaka molili, napesaka kimia mpe nakelaka pasi ; Ngai Yawe nde nasalaka makambo oyo nyonso.


Yo, Lola kuna na likolo, nokisa bosembo lokola mvula, tika ete mapata ekitisa yango ! Tika ete mabele efungwama mpo ete lobiko ebima ; tika ete bosembo ekola nzela moko ! Ezali Ngai Yawe nde nakelaki yango.


Tala, ezali Ngai nde nakelaki monyangwisi bibende na moto oyo apelisaka moto makasi na makala mpe asalaka ebundeli mpo ete esala mosala na yango. Ezali mpe kaka Ngai nde nakelaki mobebisi mpo ete asala mosala ya kobebisa.


« Nakokomisa Samari mopiku ya mabanga ; bakokoma kosala bilanga ya vino kuna. Nakobwaka mabanga na yango na lubwaku, nakosala ete miboko na yango etikala polele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ