Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 19:23 - Mokanda na Bomoi

23 Na nzela ya bantoma na yo, ofingaki Nkolo mpe olobaki : ‘ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, namataki kino na basonge ya bangomba, na basonge oyo eleki likolo kati na Libani, nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, na zamba na yango oyo eleki kitoko,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 19:23
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na Lakishi, mokonzi ya Asiri atindaki epai ya mokonzi Ezekiasi, na Yelusalemi, mokonzi ya mampinga na ye, mokonzi ya bakalaka ya lokumu, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, mpe mampinga ya basoda ya nguya. Tango bakomaki na Yelusalemi mpe batelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba,


Sik’oyo, nabondeli yo, beta mondenge na nkolo na ngai, mokonzi ya Asiri : ‘ Nakopesa yo bampunda nkoto mibale soki okoki kopesa basoda mpo ete batambolisa yango !


Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba nyonso ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki. Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. »


Atongaki lisusu bandako milayi kati na esobe mpe atimolaki mabulu ebele ya mayi mpo ete azalaki na bibwele ebele na se ya bangomba mpe na etando. Azalaki mpe na basali ebele oyo bazalaki kotimola mabele mpe kosala kati na bilanga na ye ya vino kati na bituka ya bangomba mpe na mabele oyo ebotaka malamu, pamba te azalaki kolinga mingi misala ya bilanga.


Senakeribe akomaki lisusu mikanda mpo na kofinga Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala maloba mabe oyo akomaki na tina na Ye : « Ndenge banzambe ya bato ya bikolo mosusu balongaki te kokangola bato na bango, ndenge wana mpe nzambe ya Ezekiasi akolonga te kokangola bato na ye na maboko na ngai. »


Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye, ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola, na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.


Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar, bamosusu, kati na bampunda ; kasi biso totiaka elikya na biso kati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso.


Pamba te azalaki koloba : ‹ Nazalaki kosala makambo oyo nyonso na makasi mpe na bwanya na ngai moko, pamba te nazali mayele ; napusaki bandelo ya bikolo, nabotolaki bomengo na bango lokola elombe, nalongaki bakonzi na bango.


Loboko na ngai ekamataki bomengo na bango ndenge bakamataka zala ya ndeke ; mpe ndenge bato balokotaka maki batika, ndenge wana mpe ngai nalokotaki mokili mobimba : moko te eningisaki lipapu to efungolaki monoko mpo na kobeta piololo. › »


akozikisa nye bazamba na yango ya minene mpe bilanga na yango ya kitoko ndenge mobeli akondaka.


Emitombolaki kino kotia tembe na Mokonzi ya mampinga, elongolaki mbeka ya mokolo na mokolo na losambo mpe ebebisaki Esika na Ye ya bule elongo na miboko na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ