Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 19:22 - Mokanda na Bomoi

22 Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ? Nani oyo omatiselaki mongongo mpe otalaki na miso ya lolendo ? Ngai, Mosantu ya Isalaele !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 19:22
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba nyonso ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki. Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. »


Ezayi alobaki na bango : — Boloba na nkolo na bino : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Kobanga te mpo na makambo oyo oyoki, maloba oyo basali ya mokonzi ya Asiri bazali koloba mpo na kosambwisa Ngai.


Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda mpo na boyengebene na Yo ; Mosantu ya Isalaele, nakobeta lindanda mpo na lokumu na Yo.


Minoko na bango etombokelaka Likolo, mpe lolemo na bango esakanelaka mokili.


bazalaki kozongela komeka Nzambe, koyokisa Mosantu ya Isalaele mawa.


Faraon azongisaki : — Ye Yawe nde nani mpo ete ngai natosa ye mpe natika Isalaele kokende ? Nayebi ye te mpe nakotika te ete Isalaele akende.


Lokola ozali kokoba koboya kotika bato na Ngai kokende,


Ezali na bato oyo batonda na lolendo mpe bamonaka bato mosusu pamba.


Pamba te azalaki koloba : ‹ Nazalaki kosala makambo oyo nyonso na makasi mpe na bwanya na ngai moko, pamba te nazali mayele ; napusaki bandelo ya bikolo, nabotolaki bomengo na bango lokola elombe, nalongaki bakonzi na bango.


Boni, epasola ekoki solo komimatisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ; si ya mabaya ekoki solo komikumisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ? Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yango to etape ya nzete kotombola nzete na yango ?


Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimia nde bokozwa lobiko na bino ; ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikya nde bokozwa makasi na bino ; kasi bino, bolingi bongo te.


Yango wana, ndenge ndemo ya moto ezikisaka matiti, mpe ndenge matiti ya kokawuka esilaka na moto, ndenge wana mpe misisa na bango ekopola mpe bafololo na bango ekopumbwa lokola putulu, pamba te babwakaki Mobeko na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe batiolaki liloba ya Mosantu ya Isalaele.


Ata soki mokili na bango etondaki na masumu liboso ya Mosantu ya Isalaele, Nzambe na bango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, abosanaki Isalaele na Yuda te.


Emitombolaki kino kotia tembe na Mokonzi ya mampinga, elongolaki mbeka ya mokolo na mokolo na losambo mpe ebebisaki Esika na Ye ya bule elongo na miboko na yango.


tokweyisaka makanisi ya lokuta mpe nguya nyonso oyo etelemelaka boyebi ya Nzambe ; tolongaka makanisi nyonso ya bomoto mpe tosalaka ete yango etosa Klisto.


Motomboki yango akotelemela makambo nyonso ya Nzambe mpe akomitombola na likolo ya nyonso oyo bato babengaka Nzambe to na likolo ya oyo bato bagumbamelaka, kino kokende kovanda kati na Tempelo ya Nzambe mpe komibenga Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ