Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 19:2 - Mokanda na Bomoi

2 Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo ; bango nyonso balata bilamba ya basaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 19:2
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Davidi alobaki na Joabi mpe na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : — Bopasola bilamba na bino mpe bolata basaki, bosala matanga liboso ya Abineri. Ye moko mokonzi Davidi atambolaki na sima ya ebembe.


Nganga-Nzambe Yeoyada akamataki sanduku moko mpe atobolaki mofinuku na yango. Atiaki sanduku pembeni ya etumbelo, na ngambo ya loboko ya mobali tango ozali kokota kati na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobatela ekuke batiaki kati na sanduku mbongo nyonso oyo bazalaki komema na Tempelo ya Yawe.


babelelaki mokonzi. Mpe Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, babimaki mpo na kokutana na bango.


Balobaki na ye : — Tala makambo oyo Ezekiasi alobi : « Mokolo ya lelo ezali mokolo ya pasi, mokolo ya etumbu mpe mokolo ya soni, pamba te tokomi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota kasi azangi makasi ya kobimisa mwana.


Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Oziasi mpe misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ezali mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, nde akomaki yango.


Emoniseli oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na mokili ya Yuda mpe ya engumba Yelusalemi tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda.


Tala makambo oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na Yuda mpe Yelusalemi :


Tala liloba oyo Yawe alobi : — Kende kosomba mbeki epai ya mosali mbeki. Kende nzela moko na bakambi ya bato mpe bakambi ya Banganga-Nzambe ;


Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te.


mpo na kokokisa maloba oyo mosakoli Ezayi alobaki :


Boye nde ekokisamaki, makambo oyo mosakoli Ezayi akomaki kati na buku na ye : « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ