Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 19:19 - Mokanda na Bomoi

19 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 19:19
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto na Nzambe ayaki mpe alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bato ya Siri bakanisi ete Ngai nazali nzambe ya bangomba, kasi ya etando te, nakokaba mampinga monene oyo na maboko na yo mpe okoyeba ete Ngai nazali Yawe. »


pamba te bakoyoka sango ya Kombo monene na Yo, ya loboko na Yo ya nguya mpe esembolama ; soki ayei mpe asambeli na kotala na ngambo ya Tempelo oyo,


yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo, mpe salela ye nyonso oyo akosenga Yo, mpo ete bikolo nyonso ya mokili bayeba Kombo na Yo, batosa Yo lokola Isalaele, bato na Yo, mpe bayeba ete Tempelo oyo natongi ebulisami nde mpo na Kombo na Yo.


mpo ete bato nyonso kati na mokili bayeba solo ete Yawe azali Nzambe, mosusu lokola Ye azali te.


Mpe Ezekiasi asambelaki Yawe : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, Yo oyo ovandi likolo ya basheribe, ozali Nzambe kaka moko na likolo ya mikili nyonso ya mabele, Yo nde osala Likolo mpe mabele.


Bongo Namani elongo na basali na ye nyonso bazongaki epai ya moto na Nzambe. Atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki : — Nayebi sik’oyo ete ezali na Nzambe te kati na mokili mobimba longola kaka kati na Isalaele. Nabondeli yo, ndima kado kowuta na mosali na yo.


Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye, bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo !


Sima na Ezekiasi kotalisa boyengebene na ye epai ya Nzambe, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Yuda. Azingelaki bingumba batonga makasi, pamba te azalaki na posa ya kobotola yango.


Tika ete soni mpe somo makasi elata bango mpo na libela ! Tika ete bakufa na soni !


Tala makambo oyo Yawe alobi : Tala ndenge nini okoyeba ete Ngai nazali Yawe : Nakobeta na mayi ya Nili lingenda oyo nazali na yango na maboko, mpe mayi yango ekobongwana makila.


Asalaki bongo mpo ete bato nyonso ya mokili bayeba ete loboko ya Yawe ezalaka na nguya, mpe mpo ete bobangaka Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso. »


Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ