Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 19:16 - Mokanda na Bomoi

16 Oh Yawe, pesa litoyi mpe yoka ! Yawe, fungola miso mpe mona ! Yoka maloba oyo Senakeribe atindi mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 19:16
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete, moyi mpe butu, miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na kotala Tempelo oyo, esika oyo olobaki na tina na yango : ‹ Kombo na Ngai ekozala awa. › Yoka losambo oyo mowumbu na Yo azali kotombola na esika oyo.


Oh Yawe, ezali ya solo ete bakonzi ya Asiri babebisaki bikolo oyo mpe mikili na bango,


Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba nyonso ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki. Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. »


Kobanda sik’oyo, oh Nzambe na ngai, tika ete miso na Yo ezala ya kofungwama mpe matoyi na Yo eyoka na bokebi mabondeli oyo ekosalema na esika oyo !


Eh Yawe, kati na Yo nde nazwa ebombamelo ; kondima te ete nayoka soni ! Bikisa ngai na bosembo na Yo !


Oh Nzambe, telema mpe lobela Kombo na Yo ! Kanisa lisusu ndenge nini bazoba bafingaka Yo mikolo nyonso !


Oh Nkolo, zongisela bikolo oyo ezingeli biso, kotiola oyo batiolaki Yo ; zongisela bango mbala sambo.


Oh Yawe, pesa litoyi mpe yoka ; Yawe, fungola miso mpe mona ! Yoka maloba nyonso oyo Senakeribe atindi mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi.


Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki ! Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. › »


Nzambe na ngai, defisa ngai litoyi na Yo mpe yoka ngai na bokebi ! Fungola miso na Yo mpe mona kobebisama ya bisika na biso mpe ya engumba oyo mpo na bolamu na yango. Ngai, nazali kobelela Kombo na Yo ! Ezali te mpo tozali sembo, kasi ezali nde mpo na mawa monene na Yo nde tozali kobondela Yo !


pamba te amonaki ete kotiolama lokola Klisto ezali malamu koleka bomengo ya Ejipito, mpo ete azalaki kotalela lifuti oyo ezali koya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ