14 Sima na Ezekiasi kozwa mokanda kowuta na maboko ya bantoma, atangaki yango, akendeki na Tempelo ya Yawe mpe afungolaki mokanda yango liboso ya Yawe.
Bongo na tango ya likabo ya pokwa, nasalaki makasi atako nazalaki na pasi makasi kati na motema, natelemaki na nzambala mpe kazaka na ngai, oyo epasuka ; nafukamaki mpe natombolaki maboko na ngai epai na Yawe, Nzambe na ngai.
Bongo Moyize atikaki Faraon mpe abimaki libanda ya engumba. Atombolaki maboko na ye epai na Yawe ; boye bakake mpe mvula ya mabanga etikaki kobeta, mpe mvula esilaki kati na Ejipito.
Kasi Yo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Yo oyo osambisaka na bosembo mpe omekaka mitema mpe makanisi, sala ete namona mabe oyo okozongisela bango, pamba te natiki likambo na ngai na maboko na yo.