Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 19:12 - Mokanda na Bomoi

12 Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango bakangolaki yango ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 19:12
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna.


Tera awumelaki na bomoi mibu nkama mibale na mitano, sima akufaki na engumba Arani.


Yawe Nzambe alonaki elanga moko kati na Edeni, na ngambo ya este. Atiaki moto oyo akelaki kati na yango.


Jakobi atunaki babateli bibwele : — Bandeko na ngai ya mibali, bowuti wapi ? Bazongisaki : — Towuti na Arani.


Tango Oze akokisaki mibu libwa na bokonzi, mokonzi ya Asiri abotolaki Samari mpe amemaki bana ya Isalaele na bowumbu na Asiri. Atiaki bango na Ala mpe na bapembeni ya ebale ya Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi.


Oyokaki makambo oyo bakonzi ya Asiri basalaki bikolo nyonso mpe ndenge nini babebisaki yango nye ; okanisi ete yo nde okobika ?


Yango wana Nzambe ya Isalaele alamusaki molimo ya Puli, mokonzi ya Asiri, mpe molimo ya Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, mpo na komema na bowumbu : bato ya libota ya Ribeni, ya libota ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase. Amemaki bango na Ala, na Abori, na Ara mpe na ngambo ya ebale Gozani, epai wapi bazali kovanda kino lelo.


Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango, bakangolaki yango ?


Bato ya Arani, ya Kane mpe ya Edeni, elongo na bato ya mombongo ya Saba, ya Asiri mpe ya Kilimadi, bazalaki kosala mombongo elongo na yo ;


Boye, alongwaki na mokili ya Chalide mpe akendeki kovanda na mokili ya Sharani. Sima na kufa ya tata na ye, Nzambe atindaki ye na mokili oyo, mokili oyo bino bozali kovanda sik’oyo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ