Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 19:11 - Mokanda na Bomoi

11 Oyokaki makambo oyo bakonzi ya Asiri basalaki bikolo nyonso mpe ndenge nini babebisaki yango nye ; okanisi ete yo nde okobika ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 19:11
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri.


Kati na banzambe nyonso ya bikolo oyo, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai ? »


« Boloba na Ezekiasi, mokonzi ya Yuda : Kotika te ete Nzambe na yo, oyo otielaka motema akosa yo na maloba oyo : ‹ Yelusalemi ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri ! ›


Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango bakangolaki yango ?


Senakeribe akomaki lisusu mikanda mpo na kofinga Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala maloba mabe oyo akomaki na tina na Ye : « Ndenge banzambe ya bato ya bikolo mosusu balongaki te kokangola bato na bango, ndenge wana mpe nzambe ya Ezekiasi akolonga te kokangola bato na ye na maboko na ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ