2 Bakonzi 18:8 - Mokanda na Bomoi8 Alongaki bato ya Filisitia mpe alandaki bango kino na Gaza, abebisaki engumba mpe etuka na yango, mpe abotolaki bingumba batonga makasi mpe bandako milayi ya bakengeli. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na tango Ezekiasi azalaki mokonzi ya Yuda, bato oyo bakombo na bango ekomami, bakomaki na mokili yango. Babundisaki bakitani ya Cham mpe babebisaki bandako na bango ; mpe lisusu, basilisaki koboma bato ya Mewuni oyo bazalaki kovanda kuna, ndenge yango ezali komonana lelo. Na sima, bavandaki na bisika na bango, mpo ete mokili yango ezalaki na matiti mpo na koleisa bibwele na bango.
Atongaki lisusu bandako milayi kati na esobe mpe atimolaki mabulu ebele ya mayi mpo ete azalaki na bibwele ebele na se ya bangomba mpe na etando. Azalaki mpe na basali ebele oyo bazalaki kotimola mabele mpe kosala kati na bilanga na ye ya vino kati na bituka ya bangomba mpe na mabele oyo ebotaka malamu, pamba te azalaki kolinga mingi misala ya bilanga.