Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 18:5 - Mokanda na Bomoi

5 Ezekiasi atiaki motema na ye epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Mokonzi moko te akokanaki na ye kati na bakonzi nyonso ya Yuda, ezala liboso to sima na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 18:5
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki na bango : « Boloba na Ezekiasi : ‹ Tala makambo oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi : ‘ Otie elikya na yo na nini ?


« Boloba na Ezekiasi, mokonzi ya Yuda : Kotika te ete Nzambe na yo, oyo otielaka motema akosa yo na maloba oyo : ‹ Yelusalemi ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri ! ›


Mokonzi moko te azongelaki Yawe lokola Joziasi, na motema na ye mobimba, na molimo na ye mobimba mpe na makasi na ye nyonso, kolanda mibeko nyonso ya Moyize. Mpe sima na ye, mokonzi moko te azalaki lokola ye.


Yawe abetaki bato ya Etiopi liboso ya Asa mpe Yuda, mpe bato ya Etiopi bakimaki.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bakendeki na esobe ya Tekoa. Na tango ya kokende, Jozafati atelemaki mpe alobaki : « Bino, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka ngai ! Botia elikya na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokolendisama ! Bondimela basakoli na Ye, mpe bokolonga ! »


Sima na yango, Jozafati, mokonzi ya Yuda, asalaki boyokani elongo na Akazia, mokonzi ya Isalaele, oyo etamboli na ye ezalaki mabe na miso ya Nzambe.


Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye, nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye.


bongo monguna na ngai akoloba : « Nalongi ye, » mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi.


Pamba te, mpo na biso, Yawe Nzambe azali moyi mpe nguba ; Yawe apesaka ngolu mpe nkembo, aboyaka kopesa eloko moko te epai ya bato oyo batambolaka bazanga pamela.


Mpe soki olobi na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni, ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’


« Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. » Mpe Ezekiasi alelaki mingi.


Atiaka elikya na ye kati na Nzambe ; tika ete Nzambe akangola ye sik’oyo soki alingaka ye, pamba te azalaki koloba : ‹ Nazali Mwana na Nzambe. › »


mpo ete tosanzola nkembo na Ye, biso ba-oyo tozalaki bato ya liboso mpo na kotia elikya na biso kati na Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ