Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 18:4 - Mokanda na Bomoi

4 Alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba, abukaki makonzi ya bule ya banzambe ya bikeko, mpe akataki likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera. Abukaki-bukaki nyoka ya ebende oyo Moyize asalaki, pamba te kino na tango wana, bana ya Isalaele bazalaki kotumba ansa mpo na nyoka yango mpe kobenga yango « Nekushitani. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 18:4
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozafati alandaki nzela nyonso oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango mpe apengwaki na yango ata moke te ; asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe.


Babimisaki libanga ya bule na libanda ya ndako ya nzambe Bala mpe batumbaki yango.


Bato nyonso ya mokili bakendeki na ndako ya nzambe Bala mpe babukaki yango elongo na bitumbelo mpe bikeko, mpe babomaki Matani, nganga-nzambe ya Bala, liboso ya bitumbelo. Nganga-Nzambe Yeoyada atiaki bakengeli ya Tempelo ya Yawe.


Joasi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe na mikolo nyonso oyo Nganga-Nzambe Yeoyada azalaki koteya ye.


Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.


Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. Ezali Yotami nde atongaki ekuke ya likolo ya Tempelo ya Yawe.


Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.


Mokonzi Akazi apesaki mitindo epai ya Nganga-Nzambe Uri : « Na likolo ya etumbelo monene ya sika, okobanda kobonza mbeka ya kotumba na tongo mpe likabo ya gato na pokwa, mbeka ya kotumba ya mokonzi elongo na likabo na yango ya gato, mpe mbeka ya kotumba ya bato nyonso ya mokili elongo na likabo na bango ya masanga. Okobwaka na etumbelo makila ya bambeka nyonso ya kotumba mpe ya bambeka mosusu. Kasi mpo na oyo etali etumbelo ya bronze, nakokanisa mosala nini nakosala na yango. »


Tango mosusu bokoloba na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni ! Ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Kati na Yelusalemi, bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’


Atongaki lisusu bisambelo ya likolo ya bangomba oyo Ezekiasi, tata na ye, abukaki ; atongaki mpe bitumbelo mpo na nzambe Bala mpe atelemisaki likonzi mpo na nzambe mwasi Ashera, ndenge Akabi, mokonzi ya Isalaele, asalaki ; afukamelaki mpe agumbamelaki mampinga nyonso ya likolo.


Joziasi abukaki mabanga ya bule, akweyisaki makonzi ya Ashera, mpe atondisaki esika yango na mikuwa ya bato.


Mokonzi apesaki mitindo epai ya Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai ya Banganga-Nzambe oyo balandi mpe epai ya bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe, mpo ete balongola kati na Tempelo ya Yawe, biloko nyonso oyo esalema mpo na Bala, mpo na nzambe mwasi Ashera, mpe mpo na mampinga nyonso ya likolo. Mokonzi atumbaki yango libanda ya Yelusalemi, kati na bilanga ya lubwaku ya Sedron, mpe amemaki putulu na yango na Beteli.


Kasi atako bongo, makambo malamu emonani kati na yo, pamba te olongolaki makonzi ya nzambe Ashera mpe obongisaki motema na yo mpo na koluka Nzambe. »


Tango feti nyonso esilaki, bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kuna bakendeki na bingumba ya Yuda, babukaki makonzi ya bule, bakweyisaki bikeko ya nzambe mwasi Ashera mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo kati na Yuda nyonso, kati na Benjame, kati na Efrayimi mpe kati na Manase. Sima na kobebisa biloko wana nyonso, bato ya Isalaele bazongaki kati na bingumba na bango mpe bandako na bango.


Atongaki lisusu bisambelo ya likolo ya bangomba oyo Ezekiasi, tata na ye, abukaki ; atongaki mpe bitumbelo mpo na banzambe Bala mpe atelemisaki makonzi mpo na nzambe mwasi Ashera. Afukamelaki mpe agumbamelaki mampinga nyonso ya likolo.


bayokisaki Ye kanda na nzela ya bisambelo na bango ya likolo ya bangomba, mpe bapelisaki zuwa na Ye na nzela ya banzambe na bango ya bikeko.


Bokogumbamela banzambe na bango te mpe bokosalela yango te to bokolanda te lolenge na bango ya kosalela. Bokokweyisa banzambe yango mpe bokobuka-buka bikeko na bango na biteni.


Bokweyisa bitumbelo na bango, bopanza bikeko na bango mpe bobuka makonzi oyo bapika mpo na nzambe mwasi Ashera.


Mpe soki olobi na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni, ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’


Nakokweyisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba, nakokweyisa bitumbelo na bino ya malasi, nakotia bibembe na bino likolo ya bibembe ya banzambe na bino ya bikeko mpe nakotombokela bino.


Na tango wana, natelemaki kati ya Yawe mpe bino mpo na koyebisa bino maloba na Yawe, pamba te bozalaki kobanga moto mpe bomataki te likolo ya ngomba. Tala maloba oyo alobaki :


Tala makambo oyo bosengeli kosala bango : bokokweyisa bitumbelo na bango, bokopanza bikeko na bango, bokobuka makonzi ya nzambe mwasi Ashera mpe bokotumba na moto banzambe na bango ya bikeko,


Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon : — Kamata ngombe ya mobali ya mibu sambo, na etonga ya bibwele ya tata na yo. Buka etumbelo ya nzambe Bala, oyo ezali ya tata na yo, mpe kata ekeko ya Ashera, oyo ezali pembeni na yango.


Na tongo-tongo, tango bato ya engumba balamukaki, bamonaki ete etumbelo ya nzambe Bala epanzani, ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango ekatami ; mpe bamonaki lisusu ete babonzi ngombe ya mobali na likolo ya etumbelo oyo batongi sika.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ