Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Bakonzi 18:29 - Mokanda na Bomoi

29 Tala makambo oyo mokonzi alobi : « Tika ete Ezekiasi akosa bino te, pamba te akokoka te kokangola bino na loboko na ngai !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Bakonzi 18:29
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi atelemaki mpe agangaki makasi na lokota ya Ebre : — Boyoka maloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri !


Bondima te ete Ezekiasi atinda bino kotia elikya na Yawe tango azali koloba : ‹ Solo, Yawe akokangola biso. Engumba oyo ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. ›


Bozali komona te ete Ezekiasi azali kokosa bino mpo ete bokufa na nzala mpe na posa ya mayi tango azali koloba : ‹ Yawe, Nzambe na biso, akokangola biso na loboko ya mokonzi ya Asiri ? ›


Sik’oyo, botika te ete Ezekiasi amema bino na libunga mpe akosa bino ndenge wana ; bondimela ye te ! Pamba te soki nzambe moko te ya ekolo songolo to ya mokili pakala alongaki kokangola bato na ye na loboko na ngai mpe na loboko ya batata na ngai, bongo nzambe na bino nde akolonga kokangola bino na loboko na ngai ? »


Kasi bato yango bakendeki lisusu lisanga epai ya mokonzi Dariusi mpe balobaki na ye : — Mokonzi, kobosana te ete mobeko ya bato ya Medi mpe ya Persi elobi ete mokano moko te to mobeko moko te ya mokonzi ekoki kobongolama.


Motomboki yango akotelemela makambo nyonso ya Nzambe mpe akomitombola na likolo ya nyonso oyo bato babengaka Nzambe to na likolo ya oyo bato bagumbamelaka, kino kokende kovanda kati na Tempelo ya Nzambe mpe komibenga Nzambe.


mpo ete motomboki amonisama, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na nzela ya Liloba kowuta na monoko na Ye mpe akobebisa tango akoya na nzela ya nkembo ya boyei na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ